Voice of America
(VOA,
Lolaka la Amerika
) ezali mabongisi ya monene koleka na
Lisanga lya Amerika
, multimedia, mpo na kopesa sango. Epesaka sango na na nkota biyike, koleka motango ya 45, na bisika biye bizangi to bizali kaka na ndambo ya ba media ya nsomi. Ekelama na 1942. VOA emipesa na kosakola sango na mayele mpo ete bato bayeba. Esalaka na bonsomi nyonso mpe elobaka bosolo. VOA ezuwaka mosolo na yango na bafuti mpako mpo ezala kati na Agence ya Amerika mpo na media ya mokili mobimba (U.S. Agency for Global Media).
Etinda mpe bonsomi ya VOA bipesameli na mibeko maye mibatelaka ba bapanzi sango ya VOA na bopusi (influence), mbamba (pression) to kozongisela mabe ya bakonzi ya gouvernement to ya baye ya politiki.
Na 1976, president
Gerald R. Ford
atiyaki manzaka na Charte (mokanda likonzi) ya VOA moye molobi:
- VOA ekozala ntango nyonso liziba ya sango bato bakotiyela motema mpe ya bakondima. VOA ekozala sembo, ya katikati (objectif) mpe ya mayele.
- VOA ekolakisa Amerika, kaka ngambo moko te ya societe, mpe ekopesa bongo projection ya ngambo nyonso mpe oyo bato bakoyeba, ya makanisi ya motuya ya Amerika mpe ya ba institutions.
- VOA ekotalisa mibeko to poliki ya Etats-Unis na polele nyonso mpe na ndenge ya elonga, mpe ekolakisa masolo mpe maloba ya ba theses politiques na ndenge ya bokolo.
Na 1994, Congres ya Etats-Unis endimaki
International Broadcasting Act
. Mobeko moye mosengi mpe ete mosala ya ba banzi sango ya VOA ezala ya kilo ekondimisama, ya solo, ya katikati, ya mayele, etali ngambo nyonso mpe ekominisa bokeseni ya culture mpe societe ya Amerika.
Na 2016, Congres esakolaki lisusu na
National Defense Authorization Act
ete mosala ya kozuwa mpe ya kopesa sango mosengeli kokoba kozala ya bonsomi mpe ya bokatikati.
Mokolo na mokolo, bapanzi sango ya VOA basalaka mosala makasi mpo na kopesa ndakisa ya press libre na mokili.