Tibelekilosi

Uta Wikipedia.

Tibelekilosi (TB) ezali bok?n? buye bubebisaka esika ya kopema eye babengi mampululu maye mazalaka o kati ya ntolo , kasi ekoki mpe kobebisa bisika bisusu bya nzoto . Mbula (Mvula) 150 iye iuti koleka na Ing?l??t?l? , moto m??k?? na kati ya bato 8 baye basilaka kowa, bakufaka na bok?n? bwa tibelekilosi. Kasi kobanda mibu 1980, bok?n? buna bum??n?n?k? mingi lisusu t??, mpo ete bato bakokoma na ndako ya malamu, koliya malamu mpe minganga bazali mpenza kom??n? o lombangu mpe kotiya mp?mb??ni baye bazali kob?l? mpo bazua lobiko noki. Kasi TB esili naino libela t??. Ya s??l??, TB ezali bok?n? buny??k?l?k? mokili mobimba mingi mikolo miye. Mbula (Mvula) eye eleki bato mingi bakufaki na TB-8,000 na mok?l? m??k?? - koleka Mbula (Mvula) inso iye isila koleka. Na Mbula (Mvula) 20 iye ileki, TB ebandi komata mal??mb?mal??mb? na Ing?l??t?l? . Sikawa bato 7,000 bazali kozwa yango o mobu m??k?? ? wana elingi koloba moto m??k?? na kati ya bato 10,000 na mol??ng?? mobimba.

Lokasa luye luzali koyebisa (koloba?) likolo lya bok?n? buna, ndenge ya koyeba bwango, lobiko la bwango, mpe ekolakisaka ndenge esili kopanzana na mboka na (biso?) mpe kokokisa yango na lolenge lusili kopanzana na mol??ng?? mobimba. Lokasa luye lup?si mpe toli ya sika mpo na mangw?l?? ma BCG na UK, mpe lulakisi buku isusu iye izali na nsango iye inso ikosalisa koyeba makambo ma bok?n? buna na website.

Tibelekilosi ezali nini? [ kokoma | kob?ngisa mosolo ]

Tibelekilosi (TB) ezali bok?n? bwa mabe buye bukoki kovimbisa kati (ya moto ya mwana?), na lokota la King?l??sa babobengi TB meningitis . Mpo na bakolo, mbala mingi ebebisaka esika ya kopema eye babengi mampululu , kasi ekoki kobebisa mpe mikuwa , kati ya moto t? bisika bisusu. Awa na mboka na biso, bato mingi baye bazuaka bok?n? bwa TB babikaka, kasi basengeli kom?l? nkisi sanza motoba mpo na kobika.

TB ezali bok?n? bwa makasi, kasi ebikisamaka, ewutaka na mik?l??b? mya ('Mycobacterium Tuberculosis'), Tibelekilosi t? M. Tb na bokuse. Mbala mingi ekotaka na ntolo esika ya kopema mpe eb?ng?mi na King?l??sa ('pulmonary TB') kasi ekoki mpe kokota bisika bisusu o nzoto lokola na kati ya nkingo , mikuwa t? biteni bya kati ya libumu . Ekoki mpe kop?s? menenziti . M. bovis ezali bok?n? bosusu buye bukokani na TB kasi bwango buzuaka kaka nyama , mingi mpenza ng??mb?? ('bovine TB'). M. bovis mpe ekoki kozua moto lokola na eleko ya kala, ntango bato bayebaki naino t?? ndenge nini bakoki kobatela mab??l? <pasteurisation> t? koluka TB na Ng??mb??.

Moto azuaka Tibelekilosi ndenge nini ? [ kokoma | kob?ngisa mosolo ]

Nzela en?n? ya kozua TB nde ewutaka na moto oyo azali na yango na nzoto ya ye,oyo azali kokosola. Soki akosola, abimisi bok?n? na kati ya ns??i . S??ki moto ozui ns??i yango na ntango ya kopema, wana okoki kozua TB. Mik?l??b? miye miuti na ns??i ekoki kotelengana na mop?p? ntango molayi kasi mbala mingi ep??s?k? bok?n? t??. Nzela en?n? ezali kaka s??ki ozalaka mpo na ntango molayi p?n? na moto oyo azali na TB.

Tibelekilosi ezalaka bisika mingi? [ kokoma | kob?ngisa mosolo ]

Nakati ya Ing?l??t?l? na mibu mya 1950, batu koleka 50,000 bazalaka kozua TB na mbula (mvula) m??k??. Mikolo miye ezongi tii batu 7,000 baye bazuaka na mbula m??k?? , kasi s??ki okokisi yango na mibu mya 1990, ntango wana ezalaki bato 5,500. Yango ekom??n? ete ezali komata lisusu. Wana om?n?ni ete kozua TB ezali noki t??, kasi esengeli ozala na ekenge na ndenge ya koyeba yango mpo, na mokili mobimba TB ezali bisika mingi. Lokola batu batambolaka mingi na mokili, bango bakoki kozua yango mpe bakoki kokotisa yango na mboka ya y??.

Tibelekilosi em??n?n?k? ndenge nini? [ kokoma | kob?ngisa mosolo ]

Tibelekilosi ekoki kobebisa biteni mingi bya nzoto. Ndenge yango ekom??n?n? na mw?na ek?s?ni na lolenge ekom??n?n? na mokolo. Lokola Tibelekilosi ewutaka na bato, ekozala malamu ete oyeba s??k? moto azali na yango mpo omibatela. Malamu om??n? monganga t? dokotolo s??ki mw?na t? ndeko wa y?? alakisaka bilembo biye bikomami o nse:

Mpo na nini bapesa mw?na wa ngai Mangw?l?? ma Bacillus Calmette-Guerin? [ kokoma | kob?ngisa mosolo ]

Na Ing?l??t?l?, lokola na mboka isusu, Mangw?l?? ma Bacillus Calmette-Guerin ep?s?m?k? b?na baye bazali p?n? na bato baye bakoki kozala na TB. Wana ezali mpo b?na bana bavandaka bisika m??k?? na bato ba TB, ekoki kozala baboti to bankoko bauti bisika bato mingi bab??l?k? TB. Na bokuse mbala mingi b?na baye bavandaka na engumba ya masikini. Mobateli (mangw?l?? ) mwango bapes?k? na ntango mw?na abotami kasi bakop??s?k? mpe ntango inso iye isengeli.

Mboka iye izalaka na babeli mingi ba Tibelekilosi [ kokoma | kob?ngisa mosolo ]

Mbala mingi mwana nayo bakob?t? y? ntonga ya BCG na lob??k? la mwasi p?n?p?n? na lip?k? .

Mboka iye ikomami o nse izalaka na bato mingi baye bazali kob?l? TB. S??ki eyano ya y?? na mituna na biso ezali 'oui' 'iyo', sala n?ki op?s? mw?na wa yo mangw?l?? ma BCG s??ki amozui naino t??.

  • Y??, bandeko ba yo t? tata wa mwana wa yo awuti na mboka y??k?? na kati ya iye itangami o nse?
  • Yo na mw?na wa yo bokok?nd??k?? kovanda koleka sanza mobimba t? bokotambola mingi na kati ya mboka iye itangami o nse?
  • Na kati ya ndako ya yo, t? p?n?p?n? na y??, ezali na moto oyo akokaki kozala p?n? wa mw?na wa y?? na ntango mingi, oyo azali na TB t? azalaka na yango kala, t?? awuti na mb??ka y??k?? na kati ya iye itangami?

Ndenge nini koyeba ete moto azali na Tibelekilosi? [ kokoma | kob?ngisa mosolo ]

Lokola TB ekotaka bisika mingi na nzoto, nzela ya kom?n? yango mpe ezali ndenge na ndenge. TB eye eyebani mingi nde ya kokosola eye babengi na ling?l?sa 'pulmonary TB'. Moto oyo azali na yango akolakisa bilembo biye:

  • kozanga mposa ya koliya na kok??nd?
  • kokosola eye emataka makasi nsima ya mp??s? minei koleka t?? sanza
  • kobimisa ns??i mingi; akoki mpe kokosolo makila s??ki nzela ya makila epasuki
  • komiyoka nzoto kol?mb? ntango inso
  • kozala na f??f?l?, mbala mingi na butu, eye epesi kot?k? mingi

TB epanzanaka ndenge nini? [ kokoma | kob?ngisa mosolo ]

Nzela ya kopanza TB yango kaka moko: baye bazali na yango nakati ya tolo to na mongongo. Mayi oyo ebimaka na monoko na kokolola nakati ya mopepe nde ezali na maladie. Kasi oyeba te tango mosusu baoyo bazali na yango bakoki te kopanza yango.

Kozua TB ezalaka noki, to makasi? [ kokoma | kob?ngisa mosolo ]

Penza, ezalaka makasi moto azua TB, mpe esengi tango molayi to kokutana mbala mingi na moto oyo azali na yango, lokola kovanda na ndako moko. Ata ndenge wana, basusu, ata soki bazui TB, bango bakobelaka te. Bato mingi (toloba 9 na kati ya 10) baye bazali na nzoto kolongono, soki bazui yango bakobela te. Baye 10% batikali bakobela, kasi mbala mingi noki te, kasi na sima ata ya bambula 10 na koleka (Comstock, 1982). Wana esalamaka mpo maladie yango ekoki kovanda na nzoto ya moto lokola elali bambula mpe moto azali kobela te. Maladie ekolamuka na sima ya bambula, mbala mingi soki nzoto ezangi komibatela (immunite), lokola moto mobange, bankisi misusu, kobela lokola Sida to kovanda na mizele.

Mpona 10% baye bakobelaka TB, tango ya mabe ezalaka soki ekomi naino mbula mibale te banda bazui yango.

Kati ya 1 na 5% ya baye bazui TB babelaka noki wuta bazui yango (Styblo et al., 1969; Sutherland et al., 1976; 1982). Wana babengaka yango kobela mbala moko, na Angle 'primary disease', mpe mbala mingi ezalaka na bana. 'Primary TB' mbala mingi ekoleka emonana te, mpe ekobika yango moko ata soki moto ameli nkisi te, kasi ekoki kozonga sima ya bambula. Ekotika elembo moke nakati ya tolo, na ndenge emonanaka na Rayon-X.

Kozua TB na kob?l? TB bikeseni? [ kokoma | kob?ngisa mosolo ]

Mpo na bato mingi baye bakozua TB, mibateli ya nzoto (immunite) ekobunda kin'o kosilisa t? kokanga yango mpo emata t??. Ndenge wana bok?n? ekotikala ya kolala, kasi ezali naino na bom?i , mpe ekobima lisusu na nsima, eye ebengami bok?n? na mpongi t? bulala , na ling?l?sa babubengi 'latent TB infection'.

Baye bazali na bok?n? bwa TB na mpongi balakisaka bilembo biye:

  • emon?n?k? t??
  • bab?l?k? t??
  • bakoki kopanza na basusu t??
  • Mbala mingi s??ki bameki lomposo la bango, ekom?n?n? t?? ete bazali na yango
  • Bakoki kob?l? TB na nsima ya mibu

Baye bazali kob?l? TB (‘active TB’) bakolakisaka bilembo biye bikomami na 'Nzela nini ya koyeba TB'.

TB mabe na yango penza nini? [ kokoma | kob?ngisa mosolo ]

Soki babikisi te, TB, ata epayi ya bakolo, emataka malembe kino eyi koboma. Mabe mosusu ekopesa meningite. Nzela mosusu, soki babikisi te, nde kobimisa makila tango ya kokolola. TB ekokoma ndongo soki emeseni nkisi, mpo ndenge ya kobikisa ezalaka makasi. Nakati ya Ing?l??t?l? , TB, ebomaka bato 350 na mbula moko, mingi nakati ya bango mibange, kasi bana mpe bazalaka. Bisika bato bavandaka na bandako oyo ekoki te, na mokili mobimba, bato mingi bakufaka na TB koleka oyo ya UK.

TB ekoki kokebisama na libateli lya mangw?l?? ? [ kokoma | kob?ngisa mosolo ]

Libateli lizali mangw?l?? ma BCG. Ntango esusu mangw?l?? ma BCG mabatelaka na bok?n? bwa TB t??, kasi masalisaka b?na baye bazali kob?l? bok?n? bwa meningite 'TB meningitis' (Rodrigues et al., 1993).

Ntango ya kala, na Ing?l??t?l?, bazalaki kop?s? b?na banso ba kelasi mangw?l?? ma BCG. Kasi lokola lolenge la TB lobongwanaka, Ing?l??t?l? ekamati nzela ya kolanda bato bak?? baye bazali na tibelekilosi. Na Ing?l??t?l?, mangw?l?? ma BCG mak?s?ni ?ng??b??n?? na epai eye y?? ofandi na UK, mpo TB ekoki kozala na esika songolo kasi na esika pakala ezali t??. Mangw?l?? ma BCG map?s?mi na b?na baye bavandaka bisika biye bato mingi bazali na TB koleka bisika bisusu, mpo na bongo, bap??s?k? mangw?l?? ma BCG na b?na baye babotami o mboka iye bato mingi bab??l?k? bok?n? bwa TB. Mango (Mangw?l?? ma BCG) map??s?mi mpe lokola na b?na ba kelasi ba mbula 10 kin'o 14 s??ki bazwaka BCG na bomw?na t??.

S??ki olingi kok?nd? na mboka mopaya esengeli ozua mangw?l?? ya BCG? [ kokoma | kob?ngisa mosolo ]

S??ki moto azwa mangw?l?? ya BCG kala, ekosengela ete azua mangw?l?? ya BCG s??ki alingi kok?nd? o mobembo, kovanda t? kosala mosala mpo na sanza m??k?? t? koleka, na mboka eye ezalaka na bato mingi ya TB (Immunisation against Infectious Disease, 1996).

Mangw?l?? ya BCG ezali nini? [ kokoma | kob?ngisa mosolo ]

Mangw?l?? ya Bacillus Calmette-Guerin (BCG) ezali bok?n? ya TB oyo ezuaka gombe Mycobacterium bovis . Nakati ya BCG maladie ya TB ezalaka, kasi bakangi yango epesa kobela te. Kasi mpona baye bazangi mobateli ya nzoto, lokola bato ya Sida , mpona bango BCG ekoki kopesa maladie tango mosusu.

BCG batiyaka yango na tonga ya moke na lomposo.

Mpona nini, esengeli komeka lomposo la moto, liboso lya kopesa ye Mangw?l?? ya BCG? [ kokoma | kob?ngisa mosolo ]

Moto nyonso oyo azali na sanza 12 to koleka wana, bakomekaka loposo naye liboso ya kopesa ye mobateli ya BCG . Wana ezali mpona koyeba soki mobateli ya nzoto (immunite) emeseni na TB. Nzela ya koyeba nde kobeta tonga ya tuberculin ? mayi ya proteine basali wuta na 'M. tuberculosis' ? na kati ya loposo. Sima ya mikolo 2 - 10, na ndenge ya tonga yango, bakotala esika babeti yango. Soki esika babeti tonga evimbi mpe, ekomi lokola makila, wana elakisi te maladie ezali. Ndenge wana ebongi lisusu te bapesa moto BCG, mpo akozala asiazui TB to maladie mosusu ya ndenge wana. Soki nzoto naye elakisi kozala na maladie ya makasi, wana esengi bameka ye na nzela misusu koyeba soki penza asiazui to abandi kobela TB. Bana oyo bakokisi naino sanza 12 te, bango bazali na posa te ya komeka loposo, liboso ya kozua BCG.

Babikisaka tuberculose ndenge nini? [ kokoma | kob?ngisa mosolo ]

Mbala mingi TB ekoki kobika, kasi moto ebongi asilisa nkisi ya sanza 6 to koleka. Baye babelaka TB mbala mingi bakotaka na opital te. Ata soki bakoti, wana ekozala mpona koyeba soki penza bazali na maladie yango to mpo babanda kozua nkisi. Ata boye, bato ya TB esengi bazala mpene na efimiele ya tolo, tango nyonso ya kozua nkisi mpo bazua yango na ndenge ekoki, mpe soki likambo ya mabe ezali, basala noki moto atika te kozua nkisi.

Nzela oyo tomeseni, ezali ya kozua nkisi 'antibiotics' misatu to mine mbala moko mpona sanza mibale, nde sima na yango nkisi mibale mpona sanza mine misusu. Nkisi mine minene ya TB ezali isoniazid , rifampicin , pyrazinamide na ethambutol . Eyaka elongo mpona kosalisa soki maladie emeseni nkisi moko, misusu ebunda. Ata boye, maladie ebandi komesana nkisi ya ndenge nyonso. Mbala mingi nkisi esalaka lisusu te mpo moto azalaki kozua yango na ndenge ekoki te, to azuaki yango na ndenge ya mabe to moto asilisaki te kozua nkisi (Conaty et al., 2004). Mikolo oyo batiyaka nkisi mibale to koleka na kati ya na komprime moko. Moto akomela komprime mine to koleka, mokolo moko. Tango mosusu esengi moto azua nkisi mikolo mingi, lokola maladie ya TB meningitis , to soki maladie ebandi komesana na nkisi moko to mibale, wana esengi kobalula nkisi.

Soki moto abandi nkisi mpona poso mibale, wana akoki lisusu kopanza TB te, mpe akobanda komiyoka malamu sima ya poso mine. Kasi esengi sanza motoba ya kozua nkisi mpo moto abika.

Tosala nini soki moto azalaka mpene na moto ya TB? [ kokoma | kob?ngisa mosolo ]

Tango bakuti moto azali na TB, dokotolo akotala soki baye bavandaka naye bakoki kozua yango. Soki emonani te moto akoki kopanza yango, to mwana azali na yango, kasi eyebani te azui yango wapi, wana baye bazalaka mpene naye bakobenga bango mpo bameka eyebana soki bango mpe bazali na yango. Bato wana bakozala bandeko to baye bavandaka na ndako moko. Tango mosusu baninga, lokola baye basalaka elongo, mpe bakobenga bango, kasi mbala mingi tina ya kosala yango ekozala te. Ezalaka mbala mingi te mwana apanza TB ? kasi kobela na bango elakisaka te moto mokolo oyo azali kobela TB, azali mpene na mwana wana.

Komeka mpona bandeko tina yango koyeba baye basi bazui TB to baye basi babandi kobela. Komeka basalaka na loposo to na Rayon-X. Na kati ya UK mbala mingi soki bameki loposo, elakisaka te moto asiazui maladie (loposo kovimbal mpe kozala lokola makila esika babetaki tonga), kasi wana ezali mpo bazuaki mobateli ya BCG. Soki loposo soolo ezali. Soki TB emonani, wana moto bamemi ye na dokotolo mpe bakopesa ye nkisi ya TB.

Na mokili mobimba [ kokoma | kob?ngisa mosolo ]

TB ebomaki bato 100 million na bambula 100 oyo eleki, yango Organisation Mondial de Sante eti yango lokola maladie oyo ya koboma bato mingi na mokili 'Global Health Emergency' na 1993 (WHO 1). Emonani lokola 33% ya bato nyonso na mokili bazali na yango. Na mbula moko, bato 9 million ya sika bazuaka yango (WHO 2). Tango nyonso moto moko azuaka yango na second moko.

Mpona bato mingi ata soki bazui TB mobateli ya nzoto na bango ekoki kokanga yango babela te. Ata boye, TB ebomaka bato 2 million na mokili na mbula moko, moto moko na second 15 (WHO 3). Kati ya bango, 98% bazali bato ya Tiers Monde, mingi na Asie de Sud na Afrika ya bato mwindo (WHO 4).

TB ezali ya liboso mpo na koboma basi mpe koleka bok?n? misusu esalaka mwana etike bazala mingi.

Nini bazali kosala mpo na kopekisa bompanzani bwa TB na mokili mobimba? [ kokoma | kob?ngisa mosolo ]

Ebongi bato banso o mol??ng?? mobimba babundisa bok?n? bwa TB. Kosilisa yango esika m??k?? ekosalisa s??ki basilisi yango bisika bisusu. WHO eyi na nzela oyo babengaka 'Directly Observed Treatment ? Shortcourse' (DOTS) (WHO 5): 1. Leta ezala na mposa ya kosalisa 2. nzela ya komeka bato mpo eyabana soki bazali na TB 3. nzela eye ebandimi ya kozua nkisi ya sanza 6 mpona babeli mpe moto ya kotala te bato bazali kozua nkisi na ndenge ebongi 4. Moto akata komela nkisi t?? kin'o abiki, mpe nkisi ezala eye esengeli. 5. Kokoma na buku lolenge osili kozua nkisi mpo mik?l? mya nsima Monganga ayeba ndenge nini bapesaki y?? nkisi

Oyo ezali ndambo . Okoki kosalisa mpe kosung? .